17 epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki.
Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.
Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.