Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka.
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.