Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:14 - Mokanda na Bomoi

14 Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


kotuna epai ya Yesu : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?


Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !


Yesu atunaki bango : — Makambo nini ? Bazongisaki : — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.


Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !


Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !


Marte azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.


Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.


Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.


Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.


Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?


Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, »


Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bana ya Isalaele : « Nzambe akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ