Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:12 - Mokanda na Bomoi

12 Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:12
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Neyemi alobaki na bango lisusu : — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.


Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.


Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.


Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.


Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Mozwi moko azalaki na mobateli bomengo ; bongo bafundaki ye epai ya mozwi ete azali kosakana na biloko na ye.


Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.


Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ