7 Mobeli azongiselaki Ye : — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.
Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.
pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.
Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.