Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye : — Olingi kobika ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:6
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.


« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! ›


Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »


— Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.


Mobeli azongiselaki Ye : — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ