Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:5 - Mokanda na Bomoi

5 Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu atunaki tata ya mwana : — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ? Tata ya mwana azongisaki : — Wuta tango azalaki mwana moke penza.


Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami ! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe ! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba ?


Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.


Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.


pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]


Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye : — Olingi kobika ?


Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.


kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo ; akoloba na tina na ye moko.


Kati na engumba Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye, atikala kotambola te.


Nzokande, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka mbongo epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango « Ekuke ya kitoko. »


Pamba te moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.


Kuna, amonaki moto moko alala na etoko wuta mibu mwambe mpo ete azalaki kobela bokono ya bukabuka ; kombo na ye « Ene. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ