Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:41 - Mokanda na Bomoi

41 Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:41
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.


Ngai, nandimaka litatoli ya moto te ; kasi nalobi bongo mpo ete bobika.


kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.


Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.


Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?


Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.


Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.


Nalukaka lokumu na Ngai moko te ; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka.


Yesu azongiselaki bango : — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu.


Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,


Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.


Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ