Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani : — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.


kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ;


Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Moto yango alobaki na ngai : « Mayi oyo ezali kotiola na ngambo ya este ya etuka mpe ezali kokita kino na etando ya Araba epai wapi ezali komibwaka na ebale monene. Tango kaka ekotaki na mayi ya ebale monene, mayi ya ebale monene ekomaki peto.


Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge.


Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.


Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.


— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.


Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.


Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango : bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana,


Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.


Mobeli azongiselaki Ye : — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.


Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ