Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »
mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »
Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !
Moto moko te asila komona Nzambe ; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso.
Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te.