Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.
Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.
Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.
Yango wana ekomama : « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto ; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !
Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.
Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.
Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.
pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.