Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:25
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! » Boye babandaki feti na esengo makasi.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Yesu alobaki na ye : — Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.


Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.


Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;


Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.


Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.


Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi.


Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.


Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka ; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.


Azongiselaki bango : — Nasilaki koyebisa bino yango, kasi boyokaki te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango ? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye ?


Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.


Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,


atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso,


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ