Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:24 - Mokanda na Bomoi

24 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:24
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.


Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?


Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi : — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai ;


Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te ; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe.


Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.


Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale.


Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi azali na bomoi ya seko,


kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo ; moto oyo akolia yango akokufa te.


Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.


Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te.


Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.


Pamba te Nzambe abongisa biso te mpo na kanda na Ye, kasi mpo ete tozwa lobiko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,


Ezali na nzela na Ye nde bino bondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi mpe apesaki Ye nkembo, mpo ete kondima mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.


ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.


Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ