Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?
Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.
Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.