Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 5:14 - Mokanda na Bomoi

14 Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 5:14
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe :


Kasi tango kaka bakomaki na kimia, bazongelaki lisusu kosala mabe na miso na Yo ! Mpe Yo, osundolaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo bakomaki kokonza bango. Kasi tango babelelaki Yo lisusu, oyokaki bango wuta na likolo mpe, na mawa monene na Yo, okangolaki bango mbala mingi.


Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi ; kasi akabaki ngai na kufa te.


pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.


Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule ; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.


Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.


Yawe, lokola obikisi ngai, tokobeta mindule na biso mikolo nyonso ya bomoi na biso na Tempelo ya Yawe.


Ezekiasi alobaki : — Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe ?


Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.


Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai,


‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta.


ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.


Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono : — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.


Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.


Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.


Mwasi azongisaki : — Nkolo, moko te ! Bongo Yesu alobaki na ye : — Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]


Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka : kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ