13 Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.
Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango.
Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
Yesu azongiselaki ye : — Ah Filipo ! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te ? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi : « Lakisa biso Tata ? »
Batunaki ye lisusu : — Nani alobi na yo bongo ?
Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.