12 Batunaki ye lisusu : — Nani alobi na yo bongo ?
Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
Azongiselaki bango : — Moto oyo abikisi ngai alobi na ngai : « Kamata etoko na yo mpe tambola. »
Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.
Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.
Balobanaki : « Nani asali makambo ya boye ? » Wana bazalaki kotuna mpo na koluka koyeba, bayebisaki bango ete ezali Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto asalaki bongo.
Saulo alobaki : — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa ! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo.