Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.
Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo ; azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene. »