Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye : — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo.


Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? ›


Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana ; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye : — Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela.


Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.


Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi.


Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.


Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.


(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ