Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo ! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
Abrayami azalaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kosekwisa Izaki longwa na bakufi, yango wana Nzambe azongiselaki ye mwana na ye : yango ezalaki kaka elilingi.