Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.


Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo : eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.


Pamba te liloba oyo asakolaki kolanda etinda na Yawe mpo na kolakela mabe, etumbelo ya Beteli mpe bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba kati na engumba Samari, ekokokisama solo.


Atindaki bantoma liboso na Ye ; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko.


Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?


Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. »


Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.


(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).


Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ