Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:34 - Mokanda na Bomoi

34 Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:34
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.


Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.


Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.


Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.


Yesu azongiselaki bango : — Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?


Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.


Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi.


Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.


Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.


Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.


Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »


Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ