33 Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango : — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki :
Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.
Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu.
Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.