Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:32 - Mokanda na Bomoi

32 Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:32
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.


Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.


Moto atondisaka libumu na ye na nzela ya mbuma ya monoko na ye mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.


Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo ; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu : — Rabi, lia.


Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango : — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ