Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.


Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,


Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile.


Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye : « Landa Ngai. »


Akendeki lisusu na ngambo mosusu ya Yordani, kaka na esika oyo Yoane azalaki kobatisa bato, mpe atikalaki kuna.


Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda ; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi ; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


Sima na yango, Yesu akendeki na Yuda, elongo na bayekoli na Ye ; avandaki kuna mwa tango elongo na bango mpe azalaki kobatisa.


azali kotatola na tina na makambo oyo amonaki mpe ayokaki, kasi moto moko te azali kondima litatoli na Ye.


Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.


Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ