28 Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato :
Namani akendeki epai ya nkolo na ye mpe abetelaki ye lisolo ya makambo oyo elenge mwasi ya Isalaele alobaki.
Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.
Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango,
Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso.
Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »
— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?
Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye : — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.