Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:24 - Mokanda na Bomoi

24 Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:24
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;


Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »


Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.


Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai, Nkolo alingaki koyoka ngai te.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Sik’oyo, Nkolo azali Molimo ; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali.


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela ! Amen.


Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ