bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango : — Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa.
Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te ; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
Pamba te tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko bakoma na likolo na yango : Mpo na Nzambe oyo ayebani te. Nzokande, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi Ye te.
Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.
kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatamaki. Soki omeki kobeta tolo, yeba malamu ete ezali yo te nde ozali komema mosisa, kasi ezali mosisa nde ezali komema yo.