21 Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.
« Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. ›
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.
Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;
Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.