20 Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
Yawe alobaki na ye : « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.
Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali.
« Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani : libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame.