2 (Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.)
Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
Sima na yango, Yesu akendeki na Yuda, elongo na bayekoli na Ye ; avandaki kuna mwa tango elongo na bango mpe azalaki kobatisa.
Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.
Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto. Bongo, basengaki na Petelo ete avanda elongo na bango mpo na mwa mikolo.