Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:18 - Mokanda na Bomoi

18 pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:18
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »


Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi.


Bango bazongisaki : — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ?


Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.


Yo ozali penza mwasi ya ekobo ; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te.


Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe !


Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo.


Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.


Yesu alobaki na ye : — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.


Mwasi azongisaki : — Nazali na mobali te. Yesu alobaki na ye : — Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te,


Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.


Boye soki, wana mobali na ye azali nanu na bomoi, akomi mwasi ya mobali mosusu, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akangolami libela na mobeko yango mpe akoki kokoma mwasi ya mobali mosusu ; boye bakoloba te ete asali ekobo.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ