Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:15
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.


Yesu alobaki na ye : — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.


Bongo balobaki na Ye : — Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso.


Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo.


Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.


Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ