Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:14 - Mokanda na Bomoi

14 kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:14
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.


« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !


Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.


« Bato na Ngai basali masumu mibale : Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.


Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »


Bipai nyonso mayi yango ezalaki koleka, bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kobotana, bambisi mpe ezalaki kobotana ebele ; pamba te mayi yango ezalaki kokoma kuna mpe kopetola mayi ya ebale monene. Bongo na esika nyonso oyo mayi yango ezalaki koleka, nyonso ezalaki kozwa bomoi.


Nzokande soki nyama yango ya mbindo ekweyi kati na etima to kati na libulu ya mayi, mayi ekotikala peto kasi moto oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo.


Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !


Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.


Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?


Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.


Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?


Yesu azongiselaki ye : — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ;


Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale.


Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.


Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.


Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.


Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.


mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.


Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.


Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


Bakoyoka lisusu nzala te, posa ya mayi mpe koswa ya moyi to molunge ;


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ