Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 4:12 - Mokanda na Bomoi

12 Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 4:12
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.


Yesu azongiselaki ye : — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ;


Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.


akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.


Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.


Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa ? Yango yo, ozali komimona nani ?


Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize ; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ