Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa ; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 3:8
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki, etombolaki bambonge.


Akitisaki mopepe makasi, bambonge ya ebale monene evandaki kimia.


Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.


Mopepe ekeyi na ngambo ya sude, ebaluki na ngambo ya nor, ebaluki-baluki mpe ekeyi lisusu, ezongelaka kaka banzela wana.


Yawe alobaki na ngai : — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! »


Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.


Kokamwa te ndenge nalobi na yo : « Osengeli kobotama mbotama ya sika ! »


Nikodemi atunaki lisusu : — Ekosalema ndenge nini ?


Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.


Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.


Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.


Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te ? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.


Boyebi malamu ete Klisto azali sembo ; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ