Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. »
Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.
Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »
Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.
Pamba te atiaki biloko nyonso na se ya matambe na Ye. Kasi wana alobi : « Nyonso ezali na se ya bokonzi na Ye, » etalisami polele ete esengeli te kotanga Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye.
Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.