Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 3:32 - Mokanda na Bomoi

32 azali kotatola na tina na makambo oyo amonaki mpe ayokaki, kasi moto moko te azali kondima litatoli na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 3:32
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.


Nani andimaki makambo oyo tosakolaki ? Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki ?


pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.


Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ;


Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.


Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.


Nazali koloba na yo penza ya solo : tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni ; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso.


Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.


Moto nyonso oyo andimi litatoli na Ye akolobaka na solo ete Nzambe azali solo.


Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka ; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa.


Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ