Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 3:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 3:29
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino bilenge basi ya Siona, bobima ; botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole, motole oyo mama na ye alatisaki ye na mokolo ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.


Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Pamba te bokomela miliki mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka ; bokomela penza ndenge esengeli mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.


Nakolongola na bibebu na ye bakombo ya banzambe ya Bala ; bakobelela lisusu bakombo na yango te.


— Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.


Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.


Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »


Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.


Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.


Sik’oyo, nazali koya epai na Yo ; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango.


Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.


botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko.


Yango wana tozali kokomela bino makambo oyo mpo na kokomisa esengo na biso ya kokoka.


Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela bino, kasi naboyi kosala yango na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Nazali na elikya ya koya kotala bino mpe ya kosolola malamu na bino, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.


Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ