23 Yoane mpe azalaki kobatisa na Enoni, pembeni ya Salimi, mpo ete mayi ezalaki mingi kuna ; bato bazalaki kokende kuna epai na ye mpe bazalaki kozwa libatisi.
Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.
mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye.
Makolo na Ye ezalaki lokola bronze oyo babimisi sika longwa na fulu ya moto makasi, mpe mongongo na Ye ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ya ebale monene.
Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha ; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te ; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te.