9 Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.
Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela ; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.
Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
Yesu alobaki na bango : — Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa.
Yesu apusanaki, azwaki mapa mpe akabolaki yango kati na bango ; asalaki mpe bongo mpo na mbisi.
Ezali bayekoli mosusu nde bazongisaki bwato na libongo, wana bazalaki kobenda monyama etonda na bambisi ebele, pamba te bazalaki mosika te na mokili : bametele pene nkama moko ekabolaki libongo na esika oyo bazalaki.
Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?