Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 21:23 - Mokanda na Bomoi

23 Mpo na yango, sango epanzanaki kati na bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te, kasi alobaki nde : « Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 21:23
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.


Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.


Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


Kati na engumba yango, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda elongo na bango poso mobimba. Ezali ndenge wana nde tokendeki na Rome.


Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.


Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.


kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ