Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 21:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yesu azongisaki : — Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? Kasi yo, landa Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 21:22
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.


Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.


Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?


Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.


Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge ya kufa oyo Petelo asengelaki kokufa mpo na nkembo ya Nzambe. Sima na Ye koloba bongo, alobaki na Petelo : — Landa Ngai !


Tango Petelo amonaki ye, atunaki Yesu : — Nkolo, okanisi nini mpo na ye ?


Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Banani bazali penza elikya na biso, esengo na biso to motole na biso, oyo tokomikumisa mpo na yango na miso ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mokolo oyo akoya ? Boni, ezali bino te ?


Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.


Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene.


« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.


kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.


Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ