Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 21:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ? Azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo. Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 21:15
49 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Jakobi azongiselaki ye : — Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa.


Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo ? Pamba te, oh Nkolo Yawe, oyebi mosali na Yo ?


— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.


Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.


Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele.


Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele : Davidi, mosali na Ngai ; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango.


Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde bakikuku epai wapi basali ya Tempelo bakobanda kolambela misuni ya bambeka oyo bato bakobanda kobonza. »


Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.


Yesu alobaki na ye : — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.


Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [


Petelo alobaki : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.


Petelo alobaki na Ye : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.


Petelo alobaki na Ye : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.


Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »


Petelo atunaki lisusu : — Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda Yo sik’oyo ? Nabongami kokufa mpo na Yo.


Ye moko Tata alingaka bino, pamba te bolingaka Ngai mpe bondimaki ete nawutaki epai na Nzambe.


Bongo Yesu alobaki na bango : — Boya kolia. Lokola bayekoli bayebaki ete ezali Nkolo, moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali nani ? »


Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo : — Bandeko, ezali Nkolo ! Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.


Yesu alobaki na bango : — Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai.


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


Nayebi malamu ete, sima na ngai kokende, bambwa ya zamba ekokota kati na bino mpe ekoyokela etonga mawa te.


Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.


Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.


Boye, ndeko oyo alenda te kati na kondima, ye oyo Klisto akufelaki, akopengwa likolo ya boyebi na yo.


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te !


Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,


Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,


Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.


Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ