Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bongo Yesu alobaki na bango : — Boya kolia. Lokola bayekoli bayebaki ete ezali Nkolo, moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali nani ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 21:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.


Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.


Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.


Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango : — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? »


Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te.


Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ? Azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo. Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai.


Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »


Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ