10 Yesu alobaki na bango : — Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa.
Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ?
Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te.
Yesu apusanaki, azwaki mapa mpe akabolaki yango kati na bango ; asalaki mpe bongo mpo na mbisi.
Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.
Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?