Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto ya moto yango : soki amoni ete bapota ebimi na poso ya nzoto ya moto yango, bapwale eteli mpe kotela na yango epanzani, akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo, pamba te ezali lipalata ya moto to ya mbanga.
Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.
Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.