30 Yesu asalaki lisusu, na miso ya bayekoli na Ye, bikamwa mosusu mingi oyo ekomami te kati na buku oyo.
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Yesu asalaki lisusu makambo mosusu ebele ; soki bakomaki yango na mikanda moko sima na mosusu, nakanisi ete mokili mobimba elingaki kokoka te mpo na kobomba babuku oyo balingaki kokoma.
Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.
Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.
Bino oyo bondimelaka Kombo ya Mwana na Nzambe, nakomeli bino makambo oyo mpo boyeba ete bozali na bomoi ya seko.