Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 20:28 - Mokanda na Bomoi

28 Toma azongiselaki Yesu : — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 20:28
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana na ngai ya mwasi, tala mpe yoka ; bosana bato na yo mpe ndako ya tata na yo.


Tika ete makonga na Yo ya minu etobola mitema ya banguna ya mokonzi ; tika ete bikolo ekweya na se ya matambe na Yo.


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki : — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !


Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.


Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.


Yesu alobaki na ye : — Mari ! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre : — Rabuni  !


Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !


Yesu alobaki na ye : — Ondimi mpo ete omoni Ngai ! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi !


Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.


mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ