24 Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki.
Filipo mpe Bartelemi ; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;
Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.
Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu : — Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !
Toma alobaki na Yesu : — Te, Nkolo ! Toyebi te esika oyo ozali kokende ; bongo tokoyeba nzela na yango ndenge nini ?
Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ;
Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana !
Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.
Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.